Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 21:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe longola lisumu oyo atindaki Yuda básala na ndenge bazalaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ Manase asopaki lisusu makila mingi mpenza ya bato oyo bazalaki na likambo te,+ kino atondisaki Yerusaleme banda nsuka tii nsuka.

  • 2 Bakonzi 24:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpe lisusu mpo na makila ya moto oyo azali na likambo te+ oyo ye asopaki, bongo atondisaki Yerusaleme na makila ya bato oyo bazali na likambo te, mpe Yehova andimaki kolimbisa te.+

  • Yisaya 59:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Makolo na bango ezali kaka kopota mbangu mpo na kosala mabe,+ mpe bazali kosala noki mpo na kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te.+ Makanisi na bango ezali makanisi oyo eyokisaka mpasi;+ na babalabala na bango, bazali se kopunza mpe kobuka.+

  • Yirimia 2:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Lisusu, bamoni na bilamba na yo bilembo ya makila ya milimo+ ya babola oyo bazali na likambo te.+ Nakuti yango te na esika makambo yango esalemaki, kasi nde na bilamba na yo nyonso.+

  • Bileli 4:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpo na masumu ya basakoli na ye mpe mabunga ya banganga-nzambe na ye,+

      Bato mosusu kati na ye basopaki makila ya bayengebene.+

  • Matai 23:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 mpo makila ya bayengebene nyonso oyo esopaná na mabele ekwela bino,+ banda na makila ya moyengebene+ Abele+ tii na makila ya Zekaria mwana ya Barakia, oyo bobomaki na kati ya esika mosantu ná etumbelo.+

  • Emoniseli 16:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 mpo basopaki makila ya basantu mpe ya basakoli,+ mpe opesi bango makila+ bámɛla. Babongi na yango.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto