17 Mpe nakotɛmɛla bino mpenza, mpe banguna na bino bakolonga bino;+ mpe baoyo bazali koyina bino bakonyata bino,+ mpe bokokima mpenza wana moto moko te azali kolanda bino.+
25 Yehova akosala ete banguna na yo bálonga yo.+ Okobimela bango na nzela moko, kasi okokima liboso na bango na nzela nsambo; mpe okokóma mpenza eloko moko ya nsɔmɔ epai ya makonzi nyonso ya mabele.+