53 Bongo okolya mpenza mbuma ya libumu na yo, mosuni ya bana na yo ya mibali mpe ya bana na yo ya basi,+ oyo Yehova Nzambe apesi yo, mpo na nkaka mpe motungisi oyo monguna na yo akotya yo na yango.
20 Mpe bakokata eloko ya kolya na lobɔkɔ ya mobali kasi bakozala kaka na nzala; mpe bakolya eloko na lobɔkɔ ya mwasi, kasi ya solo, bakotonda te.+ Bakolya, moto na moto, mosuni ya lobɔkɔ na ye,+
10 “‘“Na yango, batata bakolya bana na kati na yo,+ mpe bana bakolya batata na bango, mpe nakokweisa bitumbu na kati na yo mpe nakopanza bato na yo nyonso oyo bakotikala na mipɛpɛ nyonso.”’+