Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 8:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo Davidi akobaki koyangela Yisraele mobimba;+ mpe Davidi azalaki se kosambisa mpe kokata makambo na boyengebene+ mpo na bato na ye nyonso.+

  • Yisaya 1:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bóyekola kosala malamu;+ bóluka bosembo;+ bósembola moto oyo azali konyokola;+ bókata likambo mpo na mwana oyo tata akufá;+ bósamba likambo ya mwasi oyo mobali akufá.”+

  • Yirimia 7:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpo soki bokómisi mpenza banzela na bino mpe misala na bino malamu, mpe soki bokati mpenza makambo na bosembo kati na moto ná moninga na ye,+

  • Yirimia 22:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Talá oyo Yehova alobi: “Bókata likambo na bosembo mpe na boyengebene, mpe bóbikisa moto oyo bazali koyiba na lobɔkɔ ya mobubi; mpe moto oyo afandi mopaya, mwana mobali oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá bómonisa bango mpasi te.+ Bónyokola bango te.+ Mpe na esika oyo, bósopa te makila ya moto oyo azali na likambo te.+

  • Zekaria 7:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bósambisaka na bosembo ya solosolo;+ mpe bómoniselanaka motema boboto+ mpe motema mawa;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto