4 Bino bato ya Yuda mpe bino bato oyo bofandi na Yerusaleme, bókatama ngenga mpo na Yehova, mpe bólongola misutu ya mitema na bino;+ mpo nkanda na ngai ebima te lokola mɔtɔ, mpe ezikisa mpenza kozanga ete moto azala mpo na koboma yango, mpo na mabe ya misala na bino.”+
18 Ezala palata na bango to wolo na bango ekokoka kobikisa bango te na mokolo ya nkɛlɛ ya Yehova;+ kasi mabele mobimba ekolyama na mɔtɔ ya molende na ye,+ mpamba te akosilisa nyɛɛ bato nyonso oyo bafandi na mabele, ɛɛ ekozala nsɔmɔ mpenza.”+