15 Nzokande, ntango basilisaki kolya bilei ya ntɔngɔ, Yesu alobaki na Simo Petro ete: “Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai koleka oyo?”+ Alobaki na ye ete: “Ɛɛ, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.”+ Alobaki na ye ete: “Leisá bana-mpate na ngai.”+
28 Bókeba+ mpo na bino moko+ mpe mpo na etonga mobimba,+ oyo elimo santu etye bino bakɛngɛli+ na kati na yango, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe,+ oyo ye asombaki na makila+ ya Mwana na ye moko.
2 Bóbatela+ etonga ya Nzambe+ oyo bapesi na mabɔkɔ na bino, bósala yango na kotindikama te, kasi na motema moko;+ ezala te na kolinga litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe,+ kasi na motema ya esengo;