9 “‘“‘Bongo bino, bóyokela basakoli na bino te+ mpe basakoli na bino ya makambo oyo ebombaná mpe balɔti ndɔtɔ+ na bino mpe bato na bino ya misala ya maji mpe banganga-nkisi+ na bino, oyo bazali koloba na bino ete: “Bokosalela mokonzi ya Babilone te.”+
8 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Basakoli na bino oyo bazali kati na bino mpe basakoli na bino ya makambo oyo ebombaná bákosa bino te,+ mpe bóyoka te bandɔtɔ na bango oyo bazali kolɔta.+