Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 9:57
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 57 Mpe mabe nyonso ya mibali ya Shekeme, Nzambe asalaki ete ezonga na mitó na bango, mpo elakeli mabe+ ya Yotame+ mwana ya Yerubaala+ ezwa bango.+

  • 1 Samwele 25:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Mpe Davidi ayaki koyoka ete Nabale akufi, bongo alobaki ete: “Yehova apambwama, ye oyo akati likambo+ na ngai mpe alongoli ngai na nsɔni+ oyo lobɔkɔ ya Nabale eyokisaki ngai mpe apekisi mosaleli na ye asala mabe,+ mpe mabe ya Nabale, Yehova azongisi yango na motó na ye moko!”+ Mpe Davidi atindaki bato báyebisa Abigaile ete alingi kokamata ye azala mwasi na ye.+

  • Nehemia 4:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Yoká,+ Ee Nzambe na biso, mpo tokómi eloko ya kotyola;+ mpe salá ete nsɔni+ na bango ezonga na mitó na bango moko, mpe kabá bango bápunzama na mokili ya bokangami.

  • Yirimia 30:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Talá! Mopɛpɛ makasi ya Yehova, nkɛlɛ na ye mpenza, ebimi, mopɛpɛ makasi oyo ezali kokɔmbɔla.+ Ekobalukabaluka likoló ya motó ya bato mabe.+

  • Yoele 3:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 talá nazali kolamwisa bango uta na esika oyo botɛkaki bango,+ mpe nakozongisa na mitó na bino makambo oyo bosalaki.+

  • Obadia 15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpamba te mokolo Yehova akotɛmɛla bikólo nyonso ekómi pene.+ Bakosala yo ndenge osalaki.+ Misala oyo osalaki ekozongela motó na yo moko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto