Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 20:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Kasi Yehova azalaki elongo na ngai+ lokola elombe moko ya nsɔmɔ.+ Yango wana baoyo bazali konyokola ngai bakobɛta libaku mpe bakolonga te.+ Bakopɔla mpenza na nsɔni mingi, mpo makambo na bango ekotambola malamu te. Bato bakobosana te kosambwa na bango oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Yirimia 24:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Lisusu epai ya makonzi nyonso ya mabele, nakokómisa bango eloko ya kolɛngisa,+ ya mpasi, eloko ya nsɔni mpe liloba ya lisese mpe liloba ya kosɛka,+ mpe elakeli mabe,+ na bisika nyonso oyo nakopalanganisa bango.+

  • Yirimia 42:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Kaka ndenge nkanda na ngai mpe nkɛlɛ na ngai esopaneli bato ya Yerusaleme,+ ndenge yango nde nkanda na ngai mpe ekosopanela bino mpo bozali kokɔta na Ezipito, mpe bokokóma mpenza elakeli mabe mpe eloko ya kokamwa mpe libabe mpe eloko ya nsɔni,+ mpe bokomona esika oyo lisusu te.’+

  • Danyele 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Ee Yehova, na kolanda misala na yo nyonso ya boyengebene,+ nabondeli yo, nkanda na yo mpe nkɛlɛ na yo elongwa na engumba na yo Yerusaleme, ngomba na yo mosantu;+ mpamba te, mpo na masumu na biso mpe mpo na mabunga ya bankɔkɔ na biso,+ Yerusaleme ná bato na yo bazali eloko ya kosambwisa na miso ya bato nyonso zingazinga na biso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto