11 mpo bato ya ndako ya Yisraele báyengayenga lisusu te mosika na ngai+ mpe mpo bámikómisa mbindo lisusu te na makambo na bango nyonso ya kobuka mibeko. Mpe bakokóma mpenza bato na ngai mpe ngai nakokóma Nzambe na bango,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”+
8 Mpe nakoya na bango mpenza, mpe bakofanda na Yerusaleme;+ mpe bakokóma mpenza bato na ngai,+ mpe ngai nakokóma Nzambe na bango na bosolo mpe na boyengebene.’”+
10 “Yehova alobi ete: ‘Mpo talá kondimana oyo nakosala ná ndako ya Yisraele nsima ya mikolo yango. Nakotya mibeko na ngai na makanisi na bango, mpe nakokoma yango na mitema na bango.+ Mpe nakokóma Nzambe na bango,+ mpe bango bakokóma bato na ngai.+