9 Yango wana nakolela nzete ya vinyo ya Sibima ndenge nazali kolela Yazere.+ Ee Heshibone+ mpe Eleale,+ nakopɔlisa yo na mpisoli na ngai mpo koganga ebimi na eleko na yo ya molunge mpe na eleko na yo ya kobuka mbuma.+
33 Kosepela mpe esengo elongolami na elanga ya banzete ya mbuma mpe na mokili ya Moabe.+ Mpe nalimwisi vinyo na bikamwelo ya vinyo.+ Moto moko te akonyatanyata bikamwelo ya vinyo na koganga. Koganga ekozala koganga ya esengo lisusu te.’”+