Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe nasengeli kobuka lolendo na bino ya makasi mpe kokómisa likoló na bino lokola ebende+ mpe mabele na bino lokola motako.

  • Kolimbola Mibeko 28:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Likoló na yo oyo ezali likoló ya motó na yo ekokóma mpenza motako, mpe mabele oyo ezali na nse na yo ekokóma mpenza ebende.+

  • Yisaya 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe nakokómisa yango eloko oyo ebebisami.+ Bakopapa banzete na yango te, bakolongola matiti na yango mpe te.+ Mpe ekobimisa mwa nzete ya nzubɛ mpe matiti mabe;+ mpe nakopesa mapata etinda ete etika konɔkisela yango mbula.+

  • Yirimia 9:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Nani azali moto ya bwanya, mpo akanga ntina ya likambo oyo, ɛɛ, nani moto oyo monɔkɔ ya Yehova elobi na ye, mpo ayebisa likambo yango?+ Mpo na nini mokili ekobeba mpenza, ekotumbama mpenza lokola esobe kozanga ete moto aleka kuna?”+

  • Yirimia 14:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpo na mabele oyo ebukanibukani mpo mbula makasi ezali na mokili te,+ baloni-bilanga bayoki nsɔni; bazipi motó na bango.+

  • Amose 4:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “‘Mpe ngai, naboyaki mpe kopesa bino mbula ya makasi wana etikalaki kaka sanza misato mpo na kokóma na eleko ya kobuka mbuma;+ mpe nanɔkisaki mbula na engumba moko, kasi na engumba mosusu nanɔkisaki yango te. Mbula ezalaki konɔka na eteni moko ya mabele, kasi eteni oyo nazalaki konɔkisa mbula te ezalaki kokauka.+

  • Hagai 1:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe nakobaki kokaukisa mabele, bangomba, mbuma, vinyo ya sika,+ mafuta, eloko nyonso oyo mabele ekobimisa, mosala makasi nyonso ya mabɔkɔ, mpe natikaki yango enyokola moto ya mabele, mpe nyama ya mboka.’”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto