Nzembo 102:25 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 25 Kalakala otyaki miboko ya mabele,+Mpe likoló ezali mosala ya mabɔkɔ na yo.+ Nzembo 115:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Bozali bato oyo Yehova apamboli,+Ye Mokeli ya likoló ná mabele.+ Nzembo 146:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Mokeli ya likoló ná mabele,+Ya mbu, mpe ya nyonso oyo ezali na kati na yango,+Ye oyo azali kobatela bosolo mpo na libela,+ Yisaya 44:24 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 24 Talá oyo Yehova alobi, Mosikoli+ na yo mpe Moto oyo asalaki yo banda na libumu: “Ngai Yehova nazali kosala eloko nyonso, ngai moko nazali kotanda likoló,+ nazali kotanda mabele.+ Nani azalaki elongo na ngai? Yisaya 45:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Ngai moko nasalá mokili+ mpe nazalisá moto wana.+ Ngai—mabɔkɔ na ngai etandá likoló,+ mpe napesá mitindo na limpinga na yango nyonso.”+ Yirimia 51:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 “Libula ya Yakobo azali lokola biloko wana te,+ mpo azali Mosali ya eloko nyonso,+ mpe lingenda ya libula na ye.+ Yehova ya mampinga ezali nkombo na ye.”+
6 Mokeli ya likoló ná mabele,+Ya mbu, mpe ya nyonso oyo ezali na kati na yango,+Ye oyo azali kobatela bosolo mpo na libela,+
24 Talá oyo Yehova alobi, Mosikoli+ na yo mpe Moto oyo asalaki yo banda na libumu: “Ngai Yehova nazali kosala eloko nyonso, ngai moko nazali kotanda likoló,+ nazali kotanda mabele.+ Nani azalaki elongo na ngai?
12 Ngai moko nasalá mokili+ mpe nazalisá moto wana.+ Ngai—mabɔkɔ na ngai etandá likoló,+ mpe napesá mitindo na limpinga na yango nyonso.”+
19 “Libula ya Yakobo azali lokola biloko wana te,+ mpo azali Mosali ya eloko nyonso,+ mpe lingenda ya libula na ye.+ Yehova ya mampinga ezali nkombo na ye.”+