-
Ezekiele 20:28Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
28 Mpe nakɔtisaki bango na mokili+ oyo mpo na yango natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai.+ Ntango bamonaki ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe nzete nyonso oyo ezali na bitape, babandaki kopesa bambeka na bango kuna+ mpe kopesa kuna makabo na bango oyo ezali kosilikisa, mpe kopesa kuna nsolo na bango ya kokitisa motema+ mpe kosopa makabo na bango ya masanga kuna.+
-
-
Hosea 4:13Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
13 Bazali kopesa bambeka na bansɔngɛ ya bangomba,+ mpe bazali kobimisa milinga ya mbeka na bangomba mike,+ na nse ya nzete ya monene mingi, nzete ya sitirakisi mpe nzete monene, mpamba te elili na yango ezali malamu.+ Yango wana bana na bino ya basi bazali kosala pite mpe basi ya bana na bino bazali kosala ekobo.
-