48 Mpe banguna na yo oyo Yehova akotindela yo, okosalela bango+ mpenza na nzala+ mpe na mposa ya mai mpe na bolumbu mpe na mposa ya eloko nyonso; mpe akotya mpenza ekanganeli ya ebende na nkingo na yo kino akosilisa yo.+
19 Mpe ekosalema mpenza boye: bokoloba ete ‘Mpo na nini Yehova Nzambe na biso asali biso makambo oyo nyonso?’+ Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Lokola botiki ngai mpe bobandi kosalela nzambe mopaya na mokili na bino, ndenge wana nde bokosalela bapaya na mokili oyo ezali ya bino te.’”+
7 Mpe bato ya bikólo nyonso basengeli kosalela ye,+ mwana na ye mpe mwana ya mwana na ye, kino ntango mpo na mokili na ye moko ekoya,+ mpe bato ya bikólo mingi mpe bakonzi minene bakozwa ye mosaleli oyo azali kosala mosala ya mpunda.’+