Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Masese 5:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpo banzela ya moto ezali liboso ya miso ya Yehova,+ mpe atyaka likebi na banzela na ye nyonso.+

  • Yirimia 16:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpo miso na ngai ezali likoló ya banzela nyonso na bango. Babombani te liboso na ngai, mpe libunga na bango ebombani te liboso ya miso na ngai.+

  • Yirimia 23:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 “To moto moko akoki nde kobombana na bisika ya kobombana bongo ngai namona ye te?”+ yango nde liloba ya Yehova.

      “Ngai moko natondisi likoló ná mabele te?”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Malaki 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe nakobɛlɛma epai na bino mpo na kosambisa,+ mpe nakokóma moto oyo azali kotatola na lombangu+ mpo na kotɛmɛla banganga-nkisi,+ mpe bato ya ekobo,+ mpe baoyo balapaka ndai ya lokuta,+ mpe baoyo babubaka mosali na lifuti ya mosala na ye,+ baoyo babubaka mwasi oyo mobali akufá+ mpe mwana mobali oyo tata akufá,+ mpe baoyo bazali koboya moto oyo afandi mopaya,+ mpe bazali kobanga ngai te,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

  • Baebre 4:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na ye,+ kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto