Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 30:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Yehova Nzambe na yo mpe akozongisa bato na yo oyo bakangami+ mpe akoyokela yo mawa+ mpe akoyanganisa yo lisusu longwa na bato ya bikólo nyonso epai Yehova Nzambe na yo apalanganisá yo.+

  • Nzembo 53:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Ee lobiko monene ya Yisraele euta na Siona!+

      Ntango Yehova akozongisa bato na ye oyo bazali bakangami,+

      Tiká Yakobo azala na esengo, tiká Yisraele asepela.+

  • Yirimia 27:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 ‘“Na Babilone nde epai biloko yango ekomemama+ mpe yango ekokoba kozala kuna kino mokolo oyo nakotyela yango likebi,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Mpe nakomatisa yango mpe nakozongisa yango na esika oyo.”’”+

  • Yirimia 29:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakomitika ete bózwa ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakoyanganisa etuluku ya bakangami na bino mpe nakosangisa bino uta na bikólo nyonso mpe uta na bisika nyonso epai napalanganisá bino,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakozongisa bino lisusu na esika oyo nalongolaki bino mpo na kotinda bino na mboka mopaya.’+

  • Ezekiele 39:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Ale-ki-Nyonso alobi: ‘Sikoyo nde ntango oyo nakozongisa bakangami ya Yakobo+ mpe nakoyokela mpenza ndako mobimba ya Yisraele mawa;+ mpe nakolakisa ete nasɛngaka kokangama kaka na nkombo na ngai mosantu.+

  • Yoele 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Mpo talá! na mikolo yango mpe na ntango yango,+ ntango nakozongisa bakangami ya Yuda mpe ya Yerusaleme,+

  • Amose 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakozongisa bato na ngai, Yisraele, oyo bakangamaki,+ mpe bakotonga bingumba oyo etikalaki mpamba mpe bakofanda na kati na yango,+ mpe bakolona banzete ya vinyo mpe bakomɛla vinyo na yango, mpe bakosala bilanga mpe bakolya mbuma na yango.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto