Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 23:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Nzokande, soki otosi mpenza mongongo na ye mpe osali mpenza nyonso oyo nakoloba,+ nakozala mpenza monguna ya banguna na yo mpe nakotungisa baoyo bazali kotungisa yo.+

  • Yisaya 33:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mawa na yo oyo ozali kopunza nzokande bapunzi yo te, mpe na yo oyo ozali kosala makambo na bokosi nzokande bato mosusu basaleli yo makambo na bokosi te!+ Ntango kaka okosilisa kopunza, bakopunza yo.+ Ntango kaka okosilisa kosala na bokosi, bakosalela yo makambo na bokosi.+

  • Yisaya 41:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Talá! Baoyo nyonso bazali kosilikela yo bakoyoka nsɔni mpe bakosambwa.+ Bato oyo bazali koswanisa yo bakokóma eloko mpamba mpe bakokufa.+

  • Yirimia 10:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Sopelá bikólo oyo eyebi yo te+ nkɛlɛ na yo,+ mpe mabota oyo ebeleli nkombo na yo te.+ Mpo balei Yakobo.+ Ɛɛ, balei ye mpenza, bazali kaka kosilisa ye;+ mpe batiki esika na ye ya kofanda mpamba.+

  • Yirimia 25:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “‘Mpe ekosalema mpenza boye: ntango mbula ntuku nsambo (70) ekokokisama,+ nakolandela mokonzi ya Babilone mpe ekólo yango,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘libunga na bango, ɛɛ nakolandela mokili ya Bakaladea,+ mpe nakokómisa yango esika oyo etikali mpamba mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Yirimia 50:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 “Bóbengisa bato ya litimbo mpo na kobundisa Babilone, baoyo nyonso bazali konyata litimbo.+ Bótyela ye kaa zingazinga. Moto ata moko akima te.+ Bózongisela ye na kolanda mosala na ye.+ Na kolanda nyonso oyo asalaki, bósalela ye.+ Mpo asali lofundo nde epai ya Yehova, epai ya Mosantu ya Yisraele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto