Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe mingi kati na banganga-nzambe+ ná Balevi mpe bankumu ya bandako ya batata,+ mikóló oyo bamonaki ndako+ ya kala, bazalaki kolela+ na mongongo makasi ntango moboko+ ya ndako oyo ezalaki kotyama na miso na bango, wana ebele ya bato mosusu bazalaki kotombola mingongo mpe koganga na esengo.+

  • Nehemia 8:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na yango lisangá mobimba ya baoyo bautaki na bokangami basalaki mwa bandako ya matiti mpe bafandaki na mwa bandako yango ya matiti; mpo bana ya Yisraele basalaki naino ndenge wana te banda na mikolo ya Yosua mwana ya Nunu+ tii na mokolo yango, bongo basepelaki mingi mpenza.+

  • Yisaya 35:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe baoyo Yehova asikoli bakozonga+ mpe ya solo bakoya na Siona na koganga ya esengo;+ mpe esengo ekozala na motó na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Bakosepela mpe bakozala na esengo, mpe mawa ná kokimela ekokima mpenza.+

  • Yisaya 51:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bongo basikolami ya Yehova bakozonga mpe bakoya mpenza na Siona na koganga ya esengo,+ mpe esengo mpo na ntango oyo etyami ndelo te ekozala likoló ya motó na bango.+ Bakokóma na nsai monene mpe na esengo.+ Mawa mpe kokimela ekokima mpenza.+

  • Yirimia 31:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Nakotonga yo lisusu mpe okotongama lisusu mpenza,+ Ee ngɔndɔ ya Yisraele. Okomikembisa na bambonda na yo ya moke ya mabɔkɔ mpe okokɔta na mabina ya baoyo bazali kosɛka.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto