34 Mpe nakolongola bino na kati ya bato ya bikólo, mpe nakoyanganisa bino uta na mikili epai bapanzaki bino, na nguya ya lobɔkɔ na ngai, na lobɔkɔ oyo esembolami mpe na nkɛlɛ oyo esopami.+
12 Ndenge moto atyaka likebi na etonga na ye,+ oyo azali koleisa na mokolo oyo akómi na katikati ya bampate na ye oyo epalanganaki,+ ndenge yango nde nakotyela bampate na ngai likebi; mpe nakobikisa yango na bisika nyonso oyo yango epalanganaki na mokolo ya mapata mpe ya molili tuu.+