15 Talá uta na likoló+ mpe moná uta na esika na yo ya kofanda ya nkembo, ya bosantu mpe ya kitoko.+ Wapi molende+ na yo mpe nguya na yo nyonso, makɛlɛlɛ ya libumu na yo,+ mpe misala na yo ya motema mawa?+ Eboyi koya epai na ngai.+
8 “Ee Efraime,+ nasundola yo ndenge nini? Ee Yisraele, nakaba yo ndenge nini?+ Nakómisa yo lokola Adema+ ndenge nini? Natya yo lokola Zeboyime+ ndenge nini? Motema na ngai ebongwani;+ na ntango yango mpe, motema mawa na ngai engali.