Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 54:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpo Mokeli+ na yo Monene nde azali nkolo, mobali na yo,+ nkombo na ye Yehova ya mampinga;+ mpe Mosantu ya Yisraele azali Mosikoli na yo.+ Bakobenga ye Nzambe ya mabele mobimba.+

  • Yirimia 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Kende, mpe osengeli kobelela na matoi ya Yerusaleme ete: ‘Talá oyo Yehova alobi:+ “Nazali kokanisa lisusu motema boboto ya bolenge na yo,+ bolingo oyo omonisaki ntango olakamaki libala,+ ndenge ozalaki kotambola nsima na ngai na esobe, na mokili oyo baloná mboto te.+

  • Yirimia 31:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 ekozala te kondimana lokola oyo nasalaki ná bankɔkɔ na bango na mokolo oyo nasimbaki lobɔkɔ na bango mpo na kobimisa bango na mokili ya Ezipito,+ ‘kondimana na ngai oyo bango babukaki,+ atako ngai nazalaki nkolo mpe mobali na bango,’+ yango nde liloba ya Yehova.”

  • Hosea 2:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe nakolaka yo libala mpo ozala mwasi na ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ mpe nakolaka yo libala na boyengebene mpe na bosembo mpe na motema boboto mpe na motema mawa mingi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto