4 ‘Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: “Talá nazali kobalusela bino bibundeli ya etumba oyo ezali na lobɔkɔ na bino, oyo bozali kobunda na yango na mokonzi ya Babilone+ mpe na Bakaladea+ oyo bazingi bino na libándá ya efelo, mpe nakoyanganisa bango na katikati ya engumba oyo.+
5 mpo na baoyo bazali koya kobunda na Bakaladea mpe kotondisa bisika na bibembe ya bato oyo nabomi na nkanda na ngai mpe na nkɛlɛ na ngai,+ mpe mpo na baoyo nyonso mpo na mabe na bango nabombi elongi na ngai liboso ya engumba oyo:+
15 Kasi, nsukansuka, atombokelaki+ ye na ndenge atindaki bamemi-nsango na ye na Ezipito, mpo epesa ye bampunda+ mpe bato ebele. Akolonga? Akobika, ye oyo azali kosala makambo ya boye, mpe ye oyo abuki kondimana? Akobika mpenza?’+