Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe ekosalema mpenza boye na eleko ya nsuka ya mikolo:+ ngomba ya ndako+ ya Yehova ekopikama makasi likoló koleka nsɔngɛ ya bangomba,+ mpe ekotombwama mpenza likoló koleka bangomba mike;+ mpe bikólo nyonso ekosopana kuna.+

  • Yisaya 60:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe bikólo bakokende mpenza epai pole na yo ezali,+ mpe bakonzi+ epai kongɛnga na yo ezali.+

  • Mika 4:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe bikólo mingi bakokende mpenza mpe bakoloba ete: “Bóya,+ tómata na ngomba ya Yehova mpe na ndako ya Nzambe ya Yakobo;+ mpe akolakisa biso banzela na ye,+ mpe tokotambola na banzela na ye.”+ Mpo mobeko ekobima na Siona, mpe liloba ya Yehova na Yerusaleme.+

  • Zekaria 2:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Mpe bikólo mingi bakokangana na Yehova na mokolo yango,+ mpe bakokóma mpenza bato na ngai;+ mpe nakofanda epai na yo.” Mpe okoyeba ete Yehova ya mampinga ye moko atindi ngai epai na yo.+

  • Zekaria 8:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Na mikolo yango, bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo+ bakosimba,+ ɛɛ, bakosimba mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda+ moko mpe bakoloba ete: “Tokokende na bino,+ mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”’”+

  • Emoniseli 7:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Nsima ya makambo wana namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato,+ oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso+ mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso+ mpe na minɔkɔ nyonso,+ batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi+ mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ;+ mpe basimbi mandalala+ na mabɔkɔ.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto