Ebandeli 18:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Mpo na Yehova, ezali nde na likambo moko ya mpasi koleka?+ Na Ntango oyo etyamá nakozonga epai na yo, na mbula oyo ezali koya na ntango lokola oyo, mpe Sara akozala na mwana mobali.” Yobo 42:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 “Nayebi sikoyo ete okoki kosala makambo nyonso,+Mpe mpo na yo, likanisi moko ezali te oyo ekozanga kokokisama.+ Luka 1:37 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 37 mpo epai ya Nzambe ezali ata na liloba moko te oyo ekoki kosalema te.”+ Baroma 4:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 mpe andimaki mpenza ete ye akoki mpe kokokisa makambo oyo alakaki.+
14 Mpo na Yehova, ezali nde na likambo moko ya mpasi koleka?+ Na Ntango oyo etyamá nakozonga epai na yo, na mbula oyo ezali koya na ntango lokola oyo, mpe Sara akozala na mwana mobali.”
2 “Nayebi sikoyo ete okoki kosala makambo nyonso,+Mpe mpo na yo, likanisi moko ezali te oyo ekozanga kokokisama.+