Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi, ya solo, natiki yo ozala mpo na ntina oyo:+ mpo nalakisa yo nguya na ngai mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.+

  • 2 Samwele 7:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe ekólo nini na mabele ezali lokola bato na yo Yisraele,+ oyo Nzambe akendaki kosikola mpo na ye moko, mpo bázala bato na ye,+ mpo amipesa nkombo+ mpe asalela bango makambo minene mpe ya nsɔmɔ:+ kobengana bikólo ná banzambe na bango mpo na bato na yo, oyo osikolaki+ mpo na yo moko longwa na Ezipito?

  • Yisaya 63:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Moto oyo azalaki kolekisa lobɔkɔ+ na Ye ya kitoko na lobɔkɔ ya mobali ya Moize; Moto oyo akabolaki mai liboso na bango,+ mpo na komisalela nkombo oyo ezali koumela seko;+

  • Danyele 9:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Mpe sikoyo, Ee Yehova Nzambe na biso, yo oyo obimisaki bato na yo na mokili ya Ezipito na nguya ya lobɔkɔ na yo+ mpe omisalelaki nkombo lokola na mokolo ya lelo,+ tosaleli yo lisumu,+ tosali mabe.

  • Baroma 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpo Likomami elobi na Farao ete: “Natiki yo ozala mpo na ntina oyo mpenza: mpo na nzela na yo nalakisa nguya na ngai, mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto