Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 21:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe atongaki bitumbelo na ndako ya Yehova,+ oyo Yehova alobaki mpo na yango ete: “Nakotya nkombo na ngai na Yerusaleme.”+

  • 2 Ntango 33:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe atongaki bitumbelo+ na ndako ya Yehova, oyo Yehova alobaki mpo na yango ete: “Nkombo na ngai ekozala na Yerusaleme mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”+

  • Yirimia 7:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 ‘Mpo bana ya Yuda basali oyo ezali mabe na miso na ngai,’ yango nde liloba ya Yehova. ‘Batye biloko na bango ya bosɔtɔ na ndako oyo ebengami na nkombo na ngai, mpo na kokómisa yango mbindo.+

  • Yirimia 23:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Mpo mosakoli ná nga-nga-nzambe bango nyonso bakómi mbindo.+ Lisusu kati na ndako na ngai nakuti mabe na bango,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Ezekiele 5:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “‘Na yango, lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘ya solo, lokola esika na ngai mosantu nde okómisi mbindo na makambo na yo nyonso ya bosɔtɔ+ mpe na makambo na yo nyonso oyo eyinamá,+ ngai moko Moto nakokitisa yo+ mpe liso na ngai ekoyoka mawa te,+ ngai moko mpe nakomonisa motema mawa te.+

  • Ezekiele 8:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, nabondeli yo, tombolá miso na yo na ngámbo ya nɔrdi.” Bongo natombolaki miso na ngai na ngámbo ya nɔrdi, mpe talá! elembo yango ya zuwa+ ezalaki na esika ya kokɔta, na nɔrdi ya porte ya etumbelo.

  • Ezekiele 23:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 Lisusu, talá oyo basali ngai: Bakómisaki esika mosantu+ na ngai mbindo+ na mokolo yango, mpe bakómisi basabata na ngai eloko mpamba.+

  • Hosea 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Nakutaki Yisraele lokola mbuma ya vinyo na kati ya esobe.+ Namonaki bankɔkɔ na bino lokola mbuma ya figi ya liboso mpenza na nzete ya figi na ebandeli na yango.+ Bakendaki epai ya Baala ya Peore,+ mpe babandaki komipesa na eloko ya nsɔni,+ mpe bakómaki bosɔtɔ lokola eloko ya bolingo na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto