Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 29:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 ɛɛ, bikólo nyonso ekozanga te koloba ete: ‘Mpo na nini Yehova asalaki boye na mokili oyo?+ Mpo na nini nkanda monene engalaki boye?’

  • Kolimbola Mibeko 30:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Yehova Nzambe na yo mpe akozongisa bato na yo oyo bakangami+ mpe akoyokela yo mawa+ mpe akoyanganisa yo lisusu longwa na bato ya bikólo nyonso epai Yehova Nzambe na yo apalanganisá yo.+

  • Yirimia 23:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Mpe ngai moko nakoyanganisa bampate na ngai oyo etikali uta na mikili nyonso epai napalanganisaki yango,+ mpe nakozongisa yango na esika na yango ya koleisa banyama matiti,+ mpe ekobota mpenza mpe ekokóma mingi.+

  • Yirimia 29:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakomitika ete bózwa ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakoyanganisa etuluku ya bakangami na bino mpe nakosangisa bino uta na bikólo nyonso mpe uta na bisika nyonso epai napalanganisá bino,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakozongisa bino lisusu na esika oyo nalongolaki bino mpo na kotinda bino na mboka mopaya.’+

  • Ezekiele 37:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Mpe lobá na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mo-konzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kokamata bana ya Yisraele na kati ya bikólo epai bakendaki, mpe nakoyanganisa bango uta na bipai nyonso mpe nakomema bango na mabele na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto