16 Mpo ozali Tata na biso;+ atako Abrahama akoki koyeba biso te mpe Yisraele akoki koyeba biso lisusu te, Ee Yehova, yo nde Tata na biso. Mosikoli na biso ya kala, yango nde nkombo na yo.+
8 Mpe sikoyo, Ee Yehova, yo nde Tata na biso.+ Biso tozali mabele ya lima,+ mpe yo nde Moyemi na biso;+ mpe biso nyonso tozali mosala ya lobɔkɔ na yo.+
17 Lisusu, soki bozali kobelela Tata oyo aponaka bilongi te ntango asambisaka+ na kolanda mosala ya moto na moto, bómitambwisa na kobanga+ na ntango oyo bofandi bapaya.+