Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 58:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe Yehova akokamba+ yo mpenza ntango nyonso+ mpe akotondisa molimo na yo ata na mokili oyo ezikaziká,+ mpe akokembisa mikuwa na yo;+ mpe okokóma lokola elanga oyo ezwaka mai mpenza,+ mpe lokola liziba ya mai, oyo mai na yango ekosaka te.

  • Yisaya 61:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 napesa baoyo bazali kolela Siona, napesa bango eloko ya kolata na motó na esika ya putulu ya mɔtɔ,+ mafuta ya nsai+ na esika ya kolela, kazaka ya lisanzoli na esika ya elimo ya kolɛmba nzoto;+ mpe ya solo, bakobenga bango banzete minene ya boyengebene,+ elanga oyo Yehova aloná,+ mpo akóma kitoko.+

  • Yirimia 24:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe nakotya liso na ngai likoló na bango na ndenge ya malamu,+ mpe nakozongisa mpenza bango na mokili oyo.+ Mpe nakotonga bango, mpe nakobuka te; mpe nakolona bango, mpe nakopikola te.+

  • Yirimia 31:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bakoya mpenza mpe bakoganga na esengo na esika etombwaná ya Siona+ mpe bakosepela mpo na bolamu ya Yehova,+ mpo na mbuma, mpo na vinyo ya sika,+ mpo na mafuta, mpo na bana ya bampate mpe bangɔmbɛ.+ Mpe molimo na bango ekokóma lokola elanga oyo ezwaka mai mpenza,+ mpe bakolɛmba lisusu te.”+

  • Amose 9:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “‘Mpe nakolona bango na mabele na bango, mpe bakopikolama lisusu te na mabele na bango oyo napesaki bango,’+ Yehova Nzambe na yo alobi bongo.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto