34 Lisusu, Farao Neko akómisaki Eliakime+ mwana ya Yosiya mokonzi na esika ya tata na ye Yosiya mpe apesaki ye nkombo mosusu: Yehoyakime; mpe azwaki Yehoahaze mpe na nsima, akendaki na ye na Ezipito, mpe nsukansuka, akufaki kuna.+
5 Yehoyakime+ azalaki na mbula ntuku mibale na mitano (25) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula zomi na moko na Yerusaleme;+ mpe akobaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova Nzambe na ye.+