Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Mpe ekosalema mpenza boye: soki okoyoka te mongongo ya Yehova Nzambe na yo na kokebáká ete osalela mitindo na ye nyonso mpe mibeko na ye oyo nazali kopesa yo lelo, bilakeli mabe oyo nyonso esengeli kokitela yo mpe kozwa yo:+

  • Kolimbola Mibeko 29:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Boye nkanda ya Yehova engalelaki mokili yango mpe ayeiselaki yango elakeli mabe mobimba oyo ekomami na buku oyo.+

  • Yosua 23:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe ekosalema mpenza boye: kaka ndenge liloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino ekokisamaki epai na bino,+ ndenge moko mpe Yehova akoyeisela bino liloba nyonso ya mabe kino akosilisa bino nyɛɛ na mokili malamu oyo Yehova Nzambe na bino apesi bino,+

  • 2 Bakonzi 23:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Kasi Yehova alobaki ete: “Nakolongola mpe Yuda+ na miso na ngai,+ ndenge nalongolaki Yisraele;+ mpe nakobwaka mpenza engumba oyo naponá, ɛɛ Yerusaleme, mpe ndako oyo nalobá ete: ‘Nkombo na ngai ekozala wana.’”+

  • Yirimia 15:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “‘Mpe nakotyela bango mitindo minei ya makambo,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mopanga mpo na koboma, bambwa mpo na kobenda, bikelamu oyo epumbwaka na likoló+ ná banyama ya mabele mpo na kolya mpe kobebisa.

  • Mika 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yango wana mpo na bino, Siona ekobalolama lokola elanga, mpe Yerusaleme ekokóma mabondo ya bitiká,+ mpe ngomba ya ndako ekozala lokola bisika oyo etombwaná ya zamba.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto