14 Mpe Mokonzi Zidikiya atindaki bato mpe bazwaki mosakoli Yirimia mpe bamemaki ye epai na ye+ na esika ya kokɔta+ ya misato, oyo ezali na ndako ya Yehova,+ bongo mokonzi alobaki na Yirimia ete: “Nazali kotuna yo likambo moko. Kobombela ngai likambo moko te.”+