-
Yirimia 47:2Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
2 Talá oyo Yehova alobi:
“Talá! Mai ezali komata+ uta na nɔrdi+ mpe ekómi mokɛli ya mai makasi oyo ezali kozindisa. Mpe ekozindisa mokili yango mpe biloko oyo etondisi yango, engumba ná bato oyo bafandi kati na yango.+ Mpe bato bakobelela, mpe moto nyonso oyo azali kofanda na mokili yango akoganga na kolela.+
-
-
Yirimia 50:9Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Mpo talá nazali kolamwisa mpe komatisa lisangá moko ya bikólo minene uta na mokili ya nɔrdi mpo na kobundisa Babilone,+ mpe bakomitanda mpenza mpo na kobundisa ye.+ Akozwama+ kuna. Makula na bango ezali lokola makula ya moto ya nguya oyo azali kozangisa moto bana, oyo azongaka nsima te kozanga kobimisa likambo.+
-