8 Bongo bayaki epai ya Gedalia na Mizipa, ezalaki Yishimaele+ mwana ya Netania, Yohanane+ ná Yonatane, bana ya Karea, Seraya mwana ya Tanumete, bana ya Efai Monetofa+ mpe Yezania+ mwana ya Momaakate,+ bango ná bato na bango.+
2 Na nsima, Yishimaele mwana ya Netania ná bato yango zomi oyo bazalaki elongo na ye batɛlɛmaki mpe babomaki Gedalia mwana ya Ahikame mwana ya Shafane na mopanga.+ Bongo babomaki moto oyo mokonzi ya Babilone apesaki mokumba ya kokamba mokili.+