Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 36:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango azalaki se kotindela bango makebisi na nzela ya bamemi-nsango+ na ye, azalaki kotinda yango mbala na mbala, mpo azalaki koyokela bato na ye mpe esika na ye ya kofanda+ mawa.+

  • Yisaya 65:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Natandi mabɔkɔ na ngai mokolo mobimba epai ya bato ya motó makasi,+ oyo bazali kotambola na nzela oyo ezali malamu te,+ oyo bazali kolanda makanisi na bango;+

  • Yirimia 7:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 banda mokolo oyo bankɔkɔ na bino babimaki na mokili ya Ezipito kino mokolo ya lelo;+ mpe nazalaki kaka kotindela bino basaleli na ngai nyonso basakoli, mokolo na mokolo nazalaki kaka kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango.+

  • Yirimia 25:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe Yehova atindelaki bino basaleli na ye nyonso basakoli, azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango, kasi boyokaki te,+ mpe bosembolaki litoi na bino mpo na koyoka te,+

  • Yirimia 26:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 na koyokáká maloba ya basaleli na ngai basakoli, oyo nazali kotindela bino, ɛɛ nazali kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango, baoyo bino boyokeli te,+

  • Yirimia 29:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 mpo bayoki maloba na ngai te,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘oyo natindeli bango na basaleli na ngai basakoli, nazali kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe nazali kotinda bango.’+

      “‘Kasi boyoki te,’+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Yirimia 35:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe nazalaki kaka kotindela bino basaleli na ngai nyonso basakoli,+ kolamukáká ntɔngɔntɔngɔ mpe kotindáká bango na maloba oyo: ‘Nabondeli bino, bózonga, moto na moto alongwa na nzela na ye ya mabe,+ mpe bóbongisa misala na bino,+ mpe bólanda banzambe mosusu te mpo na kosalela bango.+ Mpe bókoba kofanda na mabele oyo napesá bino mpe bankɔkɔ na bino.’+ Kasi bosembolaki litoi na bino te, mpe boyokaki ngai te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto