Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 15:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe atambolaki na masumu nyonso ya tata na ye, oyo asalaki liboso na ye; mpe motema na ye ezalaki mobimba te+ epai ya Yehova Nzambe na ye, lokola motema ya nkɔkɔ na ye Davidi.+

  • 2 Ntango 21:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ye moko mpe asalaki bisika oyo etombwaná+ na bangomba ya Yuda, mpo atinda bato oyo bafandi na Yerusaleme básala pite,+ mpe mpo apɛngwisa Yuda.+

  • 2 Ntango 25:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe esalemaki boye: nsima ya kozonga ya Amazia ntango auti koboma Baedome, amemaki mpe banzambe+ ya bana ya Seire mpe atɛlɛmisaki yango ezala banzambe na ye,+ abandaki kogumbamela yango+ mpe abandaki kobimisela yango milinga ya mbeka.+

  • 2 Ntango 33:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo atongaki lisusu bisika oyo etombwaná+ oyo tata na ye Hizikiya akweisaki,+ mpe atɛlɛmiselaki Babaala+ bitumbelo+ mpe asalaki banzete ya losambo,+ mpe abandaki kogumbamela+ limpinga nyonso ya likoló+ mpe kosalela yango.+

  • Yirimia 44:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 kasi tokosala mpenza liloba nyonso oyo ebimi na monɔkɔ na biso,+ mpo na kobimisela ‘mokonzi-mwasi ya likoló’ milinga ya mbeka+ mpe kosopela ye makabo ya masanga,+ ndenge biso+ ná bankɔkɔ na biso,+ bakonzi na biso+ ná bankumu na biso tosalaki na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme, ntango tozalaki kotonda na limpa mpe tozalaki bato ya bomɛngo, mpe tomonaki mpasi ata moke te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto