Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 1:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Talá, lelo oyo napesi yo mokumba ya kozala likoló ya bikólo mpe likoló ya makonzi,+ mpo na kopikola mpe kokweisa, kobebisa mpe kobuka,+ kotonga mpe kolona.”+

  • Yirimia 4:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Nzela na yo mpe misala na yo—bakozongisela yo yango.+ Yango nde mpasi oyo ezali likoló na yo, mpo ezali bololo; mpamba te yango ekómi tii na motema na yo.”

  • Yirimia 5:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe ekosalema mpenza boye: bokoloba ete ‘Mpo na nini Yehova Nzambe na biso asali biso makambo oyo nyonso?’+ Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Lokola botiki ngai mpe bobandi kosalela nzambe mopaya na mokili na bino, ndenge wana nde bokosalela bapaya na mokili oyo ezali ya bino te.’”+

  • Yirimia 11:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Mpe Yehova ya mampinga ye moko, Moto oyo aloni yo,+ alobeli mpasi oyo ekoyela yo mpo na mabe oyo ndako ya Yisraele+ mpe ndako ya Yuda esali mpo na kosilikisa ngai na kobimiseláká Baala milinga ya mbeka.”+

  • Yirimia 21:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “‘“Mpo natɛmɛli engumba oyo mpo na mpasi kasi mpo na bolamu te,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Ekopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone,+ mpe akozikisa yango mpenza na mɔtɔ.”+

  • Yirimia 31:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 “Mpe ekosalema mpenza boye: kaka ndenge natyelaki bango likebi+ mpo na kopikola, mpo na kokweisa mpe mpo na kobuka, mpo na kobebisa mpe mpo na koboma,+ ndenge wana nde nakotyela bango likebi mpo na kotonga mpe mpo na kolona,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Ezekiele 7:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nsuka ekoya mpenza.+ Nsuka yango ekoya mpenza; ekolamukela yo.+ Talá! Ezali koya.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto