-
Yirimia 43:10Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
10 Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Talá nazali kotinda bákamata Nebukadrezare mokonzi ya Babilone,+ mosaleli na ngai,+ mpe nakotya kiti na ye ya bokonzi likoló ya mabanga oyo nabombi, mpe akotanda mpenza hema ya nkembo na ye likoló na yango.
-
-
Ezekiele 29:19Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
19 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali kopesa mokili ya Ezipito na Nebukadrezare mokonzi ya Babilone,+ mpe akomema mpenza bozwi na yango mpe akobɔtɔla biloko na yango mingi+ mpe akopunza ebele ya biloko na yango; mpe ekokóma mpenza lifuti mpo na mampinga ya basoda na ye.’
-