Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 5:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Yango wana nkanda ya Yehova epeleli bato na ye, mpe akosembolela bango lobɔkɔ na ye mpe akobɛta bango.+ Mpe bangomba ekoningana,+ mpe bibembe na bango ekokóma lokola bosɔtɔ na katikati ya babalabala.+

      Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye ezongi nsima te, kasi lobɔkɔ na ye esembolami kaka.

  • Ezekiele 38:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe mpo na ngai, mbisi ya mbu ná bikelamu oyo epumbwaka na likoló, banyama ya zamba oyo efandaka na esobe, biloko nyonso oyo ebendanaka na libumu oyo ezali kobendana na mabele mpe bato nyonso oyo bazali na etando ya mabele bakolɛnga mpenza,+ mpe ya solo, bangomba ekobukana+ mpe banzela oyo ekitá makasi ekokwea mpenza, mpe bifelo nyonso ekokwea na mabele.’

  • Nahumu 1:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Bangomba eningani mpo na ye, mpe bangomba mike enyangwi.+

      Mpe mabele ekotombwana mpo na elongi na ye; ndenge moko mpe mabele oyo ebotaka, mpe baoyo nyonso bafandaka wana.+

  • Habakuku 3:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Atɛlɛmaki nyɛɛ, mpo aningisa mabele.+ Amonaki, mpe na nsima asalaki ete bikólo epumbwapumbwa.+

      Mpe bangomba ya seko na seko epasukaki;+ bangomba mike oyo ezali koumela seko egumbamaki.+ Ye atambolaka ndenge wana banda kala.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto