-
Yirimia 44:26Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
26 “Na yango bóyoka liloba ya Yehova, bino nyonso bato ya Yuda oyo bofandi na mokili ya Ezipito:+ ‘“Talá, ngai moko nalapi ndai na nkombo na ngai monene,”+ Yehova alobi bongo, “ete nkombo na ngai ekozala lisusu te eloko oyo ezali kobelelama na monɔkɔ ya moto nyonso ya Yuda+ na mokili mobimba ya Ezipito ete: ‘Lokola Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova azali solo na bomoi!’+
-
-
Malaki 1:14Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
14 “Mpe moto oyo azali kosala na mayele mabe, wana nyama mobali ezali na etonga na ye, mpe azali kosala elako mpe azali kopesa Yehova mbeka ya nyama oyo ezali na mbeba alakelama mabe.+ Mpo nazali Mokonzi monene,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “mpe nkombo na ngai ekozala nsɔmɔ na kati ya bikólo.”+
-