Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 23:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na mikolo na ye Yuda ekobikisama,+ mpe Yisraele ekofanda na kimya.+ Mpe talá nkombo oyo bakobenga ye: Yehova azali Boyengebene na biso.”+

  • Yirimia 33:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Na mikolo yango, Yuda ekobika+ mpe Yerusaleme ekofanda na kimya.+ Mpe akobengama boye: Yehova azali Boyengebene na biso.’”+

  • Yirimia 50:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe nakozongisa Yisraele na esika na ye ya koleisa banyama matiti,+ mpe akolya matiti na Karamele+ mpe na Bashane;+ mpe na etúká ya ngombangomba ya Efraime+ mpe ya Gileade+ molimo na ye ekotonda.’”

  • Sefania 2:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe ekokóma etúká ya bato ya ndako ya Yuda oyo bakotikala.+ Bakolya kuna. Bakomitanda na mpokwa na bandako ya Ashekelone. Mpo Yehova Nzambe na bango akotyela bango likebi,+ ya solo mpenza, akozongisa bato na bango oyo bakangamaki.”+

  • Sefania 3:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Na ntango yango, nakokɔtisa bino, ɛɛ, na ntango nakoyanganisa bino. Mpo nakosala ete bózwa nkombo mpe lisanzoli na kati ya bato ya bikólo nyonso ya mabele, ntango nakozongisa na miso na bino mpenza bato na bino oyo bakangamaki,” Yehova alobi bongo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto