Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:52
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 52 Mpe bakozinga yo na kati ya baporte na yo nyonso kino bifelo na yo ya milai mpe oyo ebatelami makasi, oyo ozali kotyela motema ekokwea na mokili na yo mobimba, ɛɛ, bakozinga mpenza yo na kati ya baporte na yo nyonso na mokili na yo mobimba, oyo Yehova Nzambe na yo apesi yo.+

  • Yirimia 4:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Bólobela yango, ɛɛ, epai ya bikólo. Bósakolela yango Yerusaleme.”

      “Bato oyo bazali kotalatala bazali koya, bauti na mokili ya mosika,+ mpe bakobimisela bingumba ya Yuda mongongo na bango.

  • Yirimia 9:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe nakokómisa Yerusaleme mabondo ya mabanga,+ efandelo ya bambulú;+ mpe nakokómisa bingumba ya Yuda esika oyo etikalá mpamba, oyo moto afandi te.+

  • Yirimia 33:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Na esika oyo bino bokobanda koloba ete etikali se mpamba, moto azali te mpe nyama ya mboka ezali te, na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme oyo etikali mpamba,+ moto azali te mpe moto afandi kuna te mpe nyama ya mboka ezali te, bakoyoka lisusu+

  • Yirimia 34:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 “‘Talá nazali kopesa mitindo,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe nakozongisa bango mpenza na engumba oyo,+ mpe bakobundisa yango mpenza mpe bakozwa yango mpe bakotumba yango na mɔtɔ;+ mpe nakokómisa bingumba ya Yuda esika oyo etikali mpamba, epai moto afandi te.’”+

  • Yirimia 44:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo nkɛlɛ na ngai, mpe nkanda na ngai esopanaki mpe epelaki na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme;+ mpe yango ekómaki esika moko oyo ebebisamá, esika moko oyo etikalá mpamba, lokola na mokolo ya lelo.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto