Yobo 40:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Talá moto nyonso ya lofundo, kitisá ye,+Mpe nyatanyatá bato mabe na esika mpenza oyo bazali. Masese 18:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Liboso ya kokwea, motema ya moto ezalaka na lolendo,+ mpe komikitisa ezalaka liboso ya nkembo.+ Yisaya 25:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Mpe akobɛta mpenza mabɔkɔ na ye na katikati na yango* ndenge mobɛti mai abɛtaka mai na mabɔkɔ na ye, mpe akokitisa mpenza lolendo+ na yango na ndenge akobɛta yango na mabɔkɔ na ye oyo eyebi kobɛta. Yakobo 4:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Atako bongo, boboto monene oyo ye amonisaka ezali monene koleka.+ Yango wana elobi: “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo,+ kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”+
11 Mpe akobɛta mpenza mabɔkɔ na ye na katikati na yango* ndenge mobɛti mai abɛtaka mai na mabɔkɔ na ye, mpe akokitisa mpenza lolendo+ na yango na ndenge akobɛta yango na mabɔkɔ na ye oyo eyebi kobɛta.
6 Atako bongo, boboto monene oyo ye amonisaka ezali monene koleka.+ Yango wana elobi: “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo,+ kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”+