Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 14:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe bato ya bikólo bakozwa mpenza bango mpe bakomema bango na bisika na bango, mpe ndako ya Yisraele ekozwa bango lokola biloko na bango na mabele ya Yehova, mpo bázala basaleli ya mibali mpe basaleli ya basi,+ mpe bakozala mpenza bato oyo bazali kokanga+ baoyo bazalaki kokanga bango, mpe bakozala mpenza na bokonzi likoló ya baoyo bazalaki kotinda bango na makasi básala mosala.+

  • Yirimia 50:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe nakozongisa Yisraele na esika na ye ya koleisa banyama matiti,+ mpe akolya matiti na Karamele+ mpe na Bashane;+ mpe na etúká ya ngombangomba ya Efraime+ mpe ya Gileade+ molimo na ye ekotonda.’”

  • Mika 7:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kambá bato na yo na lingenda na yo,+ etonga ya libula na yo, oyo ezalaki kofanda yango moko kati na zamba—na katikati ya elanga ya banzete ya mbuma.+ Bálya na Bashane mpe na Gileade+ lokola na mikolo ya ntango ya kalakala.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto