Yirimia 48:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 “Bókima; bóbikisa milimo na bino,+ mpe bosengeli kokóma lokola nzete ya jenevriye na esobe.+ Yirimia 49:30 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 30 “Bókima, bókima mosika; bókita na nse mpenza mpo na kofanda, Ee bato oyo bofandi na Hazore,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Mpo Nebukadrezare mokonzi ya Babilone+ abongisi mokano mpo na bino mpe akanisi mpo na bino likanisi moko.”
30 “Bókima, bókima mosika; bókita na nse mpenza mpo na kofanda, Ee bato oyo bofandi na Hazore,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Mpo Nebukadrezare mokonzi ya Babilone+ abongisi mokano mpo na bino mpe akanisi mpo na bino likanisi moko.”