20 Soki botiki Yehova+ mpe bosaleli mpenza banzambe ya bapaya,+ ye mpe akopesa bino mokɔngɔ solo mpe akosala bino mabe mpe akosilisa bino nyɛɛ nsima ya kosalela bino bolamu.”+
13 Ee Yehova, elikya ya Yisraele,+ baoyo nyonso bazali kotika yo bakopɔla na nsɔni.+ Baoyo bazali kopɛngwa mpe batiki ngai+ bakokomama nkombo na mabele, mpo batiki liziba ya mai ya bomoi, Yehova.+