2 Bakonzi 19:35 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 35 Mpe esalemaki boye: na butu yango, anzelu ya Yehova abimaki mpe abomaki bato nkóto nkama moko na ntuku mwambe na mitano (185 000) na kaa+ ya bato ya Asiri.+ Ntango bato balamukaki na ntɔngɔntɔngɔ, talá, bango nyonso bakufi, balali bibembe.+ Yisaya 14:25 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 25 mpo na kobuka Moasiri na mokili na ngai+ mpe mpo nanyatanyata ye na bangomba na ngai;+ mpo ekanganeli na ye elongwa mpenza likoló na bango mpe mpo mokumba na ye elongwa na lipeka na bango.”+ Sefania 2:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 “Mpe akosembola lobɔkɔ na ye na ngámbo ya nɔrdi, mpe akobebisa Asiri.+ Mpe akokómisa Ninive esika oyo etikali mpamba,+ etúká oyo ezangá mai lokola esobe.
35 Mpe esalemaki boye: na butu yango, anzelu ya Yehova abimaki mpe abomaki bato nkóto nkama moko na ntuku mwambe na mitano (185 000) na kaa+ ya bato ya Asiri.+ Ntango bato balamukaki na ntɔngɔntɔngɔ, talá, bango nyonso bakufi, balali bibembe.+
25 mpo na kobuka Moasiri na mokili na ngai+ mpe mpo nanyatanyata ye na bangomba na ngai;+ mpo ekanganeli na ye elongwa mpenza likoló na bango mpe mpo mokumba na ye elongwa na lipeka na bango.”+
13 “Mpe akosembola lobɔkɔ na ye na ngámbo ya nɔrdi, mpe akobebisa Asiri.+ Mpe akokómisa Ninive esika oyo etikali mpamba,+ etúká oyo ezangá mai lokola esobe.