13 Mpo na nkanda ya Yehova, bato bakofanda kati na ye te,+ mpe na mobimba na ye akokóma esika oyo etikali mpamba.+ Moto nyonso oyo akoleka pene ya Babilone, akotikala monɔkɔ polele na kokamwa mpe akobɛta piololo mpo na bolɔzi na ye nyonso.+
39 Bongo bato oyo bafandaka na bitúká oyo ezangá mai bakofanda elongo na banyama oyo ezali koganga, mpe bamaligbanga ekofanda epai na ye;+ moto ata moko te akofanda lisusu epai na ye, akozala mpe na esika ya kofanda te libota na libota.”+
40 “Ndenge Nzambe abebisaki Sodoma ná Gomora+ mpe basité na yango oyo ezalaki zingazinga,”+ yango nde liloba ya Yehova, “moto moko te akofanda kuna, mpe mwana ya bato akofanda mopaya epai na ye te.+