Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 34:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Yehova azali na mopanga; ekotonda mpenza na makila;+ ekopakolama mpenza mafuta, makila ya bana-mpate ya mibali mpe ya bantaba-mibali, mafuta+ ya mimpíko ya bampate-mibali. Mpo Yehova azali na mbeka na Bozera, mpe akoboma ebele ya bato mpenza na mokili ya Edome.+

  • Yirimia 50:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Bóboma bana-ngɔmbɛ na ye nyonso ya mibali.+ Bákita mpo na kobomama.+ Mawa na bango, mpo mokolo na bango ekómi, ntango ya kotyela bango likebi!+

  • Ezekiele 39:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Bokolya mosuni ya bilombe,+ mpe bokomɛla makila ya bankumu ya mabele, ya bampate-mibali, ya bana-mpate ya mibali,+ mpe ya bantaba-mibali, ya bana-ngɔmbɛ ya mibali,+ yango nyonso bana ya nyama ya mafutamafuta ya Bashane.+

  • Zekaria 10:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Nkanda na ngai engaleli babateli,+ mpe nakosɛnga bakambi oyo bakokani na bantaba+ ete bázongisa monɔkɔ;+ mpo Yehova ya mampinga atye likebi na ye na etonga na ye,+ ndako ya Yuda, mpe akómisi bango lokola mpunda+ na ye ya lokumu na etumba.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto